Canalblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
Publicité
Vova dia Kongo
9 octobre 2007

RDC- Antonov 26 - Nga te, eza ye

Mawa mingi tango toyokaki pasi ya bana Congo na Kinshasa. Mbeba esalemi, bana mboka, lokala ba ntaba, bazali kokufa likolo ya bozoba mpe kimoyimi ya ba oyo bazali kokamba ekolo.

250px_Antonov_an26_fairford_arp Mpepo oyo ya mboka Russie babengi Antonov 26 esili koboma bana ya mboka, etangisi makila lokola mbula, malelo etondi mboka, kasi nani akosunga mabota oyoi epanzani? Nani akofuta mabota oyo etikali pona biloko pe milimo babungisi?

Lelo ekomi oyo oyo te, bakonzi bakomi komilakisana misapi, nzoka nde ezali komonana polele esika mbeba ewuti. Ministre ya transport akomi sacrifier po ye aza na se ya ministre ya presidence nkolo mbeba. Mawa mingi, lokoso ya bakonzi ezali kosilisa bana ya mboka.

Ekomi, oyo aganga ete akopesa boye... Kinshasa soki ekopesa mbongo na mabota wana eza mabe te, kasi bakopesa boni? soki bapesi mbongo nde bomoyi ya bato wana ezongi?
Pon nini te bazua ba mbongo na bango basalela yango pona kotonga mboka? batonga bopitalo, bafiuta minganga, basomba ba mpepo ya malamu? Sonas ekenda wapi? Si ba mpepo wana esengeli ezala na assurance. Pasi mingi po bakomi komilakisa misapi, bayangani ba responsabilites na bango, bakueseli moninga na bango libabe.

Kasi makila ya bawe ekotika bango pe kimia te, bakofuta kaka.

Publicité
Commentaires
Publicité
Vova dia Kongo
Publicité