Canalblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
Publicité
Vova dia Kongo
27 septembre 2007

62eme Assemblee ya Onu

Bandeko,

Congo na Rwanda balobi lelo na lisanga ya bikolo na ONU na New York. Sima  ya bolandi bakonzi mibale wana, likundu esali nga na motema po mokambi ya Congo atatoli malamu penza te pasi ya bana ya Congo. Esika te atanda polele mabe Rwanda na Ouganda bazali kosala epayi na biso alekisi yango be boye lokola ete mobulu pe bitumba esi esila na yango.

Oyo ya Rwanda atangi biso tango azoloba ete ba nguna na ye babatama na Congo, kasi oyo ya biso na tango te aloba nini ezali kosala biso pasi, ba moyibi ya mabanga na biso ya talo, ba kosambuisa ya basi pe bana na biso, ba koboma, ba mabe nionso wana oyo eyebani polele ete ezali kosalama na ba soda to pe na mayele ya bana ya Rwanda na Ouganda, azali kosolola makambo ya rechauffement planetaire lokola soki ezali priorite pona biso. Soki basilisi bato nionso epayi na biso, tina na biso nini soki bazali na moto to malili?

Pona kolanda Kabila to pe Kagame niata ba kombo na bango. Okoki pe kotanga ba maloba na bango awa congo_fr  na rwanda_en

Publicité
Commentaires
A
Soki ye apasoli monoko naye koloba ete “ba nguna na ye babatama na Congo”, tokoki pe kotuna ye lituna liye: mbula mitano mibimba, basoda naye bakoti mboka na biso; bafandi mpe kuna epai ya moniele ya mboka na biso. Mpe kaka kuna nde banguna na ye babatami. Eleko nyoso wana, basoda naye bazalaki kosala nini? Koiba kaka mboka na biso? Molimo ya kunzi yango motamboli ye na bangi to nini?
Publicité
Vova dia Kongo
Publicité