Canalblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
Publicité
Vova dia Kongo
20 janvier 2012

Bana ya Kongo: Babuakisama!

 – Luzolo Bambi, Ministre congolais de justice, lors de l'atelier entre la  RD Congo et leCongo/Brazzaville à Kinshasa ce 10/03/2011.

Lelo Luzolo Bambi azosénga lisalisi ya ba magistrats pona kolonga étumba na yé na ba kuluna. Oyo lokuta monéné, po tomonaki ndéngé nini PPRD na ba kuluna babanda mobulu na bango kala, léta asalaka éloko té. babomaka bana mboka, pe bayibaka na moyi makasi, kasi moto asalaka bango eloko azalaka té.

Bakosa biso té. Soki bana ya mboka batélémi pona ba droits na bango na ndenge mokanda ya mibeko etinda bango, okomona léta atondisi ba soda pe mituka ya mayi ya moto batiya bikela-kela na kati pona kokanga pe koboma bango. Kasi soki ekomi na likambo ete bana oyo bazali koboma bana ya Kongo, kaka léta oyo atonda ba soda, na ba chars de combat, na minduki ya ndenge na ndenge, na ba camions ya mayi ya moto, azali kokoka kosala eloko te, mpe azali koluka lisalisi epayi mosusu na esika ete asala mosala na ye.

Yango tokomi komituna, mandoki na biloko nionso oyo babomelaka to pe baniokolelaka bana Kongo ezalaka na yango ya kodefa?  To basomba yango kaka po eboma bana Kongo kasi ebatela bango te? Soki te, kasi ezali wapi pona kokanga ba kuluna?

Pona nini ye Luzolo abengaka ba magistrats te tango ba soda bakangaka mpe babomaka bana Kongo pamba pamba?
Wana mosala na ye te?
Pona nini bana Kongo bazali kokufa lokola ba soso tomoni ata esika bazali kosambisa ba soda oyo bazali koboma butu moyi te?
Pona nini na Kivu moto moko te azali kokanga kuluna ya monene oyo avandi kuna kombo na ye Bosco Ntaganda?
Luzolo amonaka ye te? 

Na lifanlasé balobaka:"ba imbwa ya zamba balianaka bango na bango té" (les loups ne se mangent pas entre-eux)

Na Kongo ba kuluna nionso bayebani, basanganaka, pe baniokolaka be moto moko: Bana ya Kongo

http://radiookapi.net/actualite/2012/01/19/le-ministre-luzolo-bambi-sollicite-limplication-des-magistrats-dans-la-lutte-contre-les-kuluna/?utm_source=feedburner&utm_medium=email&utm_campaign=Feed%3A+radiookapi%2Factu+%28Radiookapi.net%29

Publicité
Commentaires
Publicité
Vova dia Kongo
Publicité