Canalblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
Publicité
Vova dia Kongo
25 décembre 2008

Naza Congolais, Eza droit na nga

congo1__1_ Eza droit na nga! Po nga nde nabengama "SOUVERAIN PRIMAIRE" to pe na lingala "MOKONZI YA YAMBO" Leta aza mokonzi na nga te, ASALAKA nde epayi na nga! ASALELAKA nga, banda na PRESIDENT ti na HUISSIER ya se ya suka ya localite navandaka. Bango nionso bazali basali pe basengeli kosala mosala malamu pona NGA nazala na kimia pe na esengo. Ba soda nionso pe lokola esengeli babatela nga, biloko na nga, pe mabele ya ekolo. Toza lisusu na tango ya bohumbu te, oyo ezalaki soda azalaki kosalela mopaya pona koniokola bana mboka pe koyiba bonsomi ya mboka, eza lisusu te tango ya bozoba oyo ezalaki ba soda bakomaki kobatela nde eteni moko ya bana mboka oyo bazalaki koyiba bonsomi ya mboka pona kokaba yango na bampaya. Ezali pe lisusu te tango ya ba ayant-droit te lokola bangwandi, lelo ekomi ba katangais, oyo bazali komona mboka lokola eloko na bango bazali kokabola na bampaya. Nionso wana esengeli esila po biso ba congolais tozali bakolo mabele, biso nde bakonzi ya mboka, biso nde tokosala lokumu ya mboka. Nazali kosenga na baye bazali kokamba gouvernement, parlement, les cours et tribunaux, bafungola miso pe bayeba nani mokonzi na bango. BASALELA PEUPLE, MINDELE TE. Babosana te: KALA TE TOKOVOTE LISUSU! BOSALI ELOKO TE TI LELO, MIKOLO NA BINO PE ETIKALI MOKE. BONSOMI YA CONGO PONA CONGO.
Publicité
Commentaires
Publicité
Vova dia Kongo
Publicité