Canalblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
Publicité
Vova dia Kongo
10 janvier 2008

Etumba ya BDK eza ya KONGO

Eleki! Yango ekomi nini? Ba ne-Kongo bazalaka nde ba meme na bango to boni? Boni ko? Congo yango ezali ya bango moko nemuandansemito boni? Bazolemba te koboma biso pona nini? Ekomi sikoyo bonane nionso batangisaka makila ya ba Ne-Kongo?

Bazolobela lisamga ya kimia na ngambo moyi ebimaka ya mboka, kasi bazali koboma na ngambo moyi ekitaka.
Ntangu zi mfueni tosenga ya biso pe lisanga ya kimia, po tolobelela makanisi na biso na ndenge biso ba Ne-Kongo tolingi mboka na biso etambuisama.

Kuna na ngambo moyi elamukaka, ba ndeko na biso ba congolais batiki mokili, bakueyi na masasi pe mipanga to pe ba mbeli ya banguna oyo bakotela biso na mboka mpe bazali koluka bakata yango na biteni. Lelo oyo basalisi lisanga ya kimia pona kokosa ba ndeko na biso oyo balula falanga mpe bokonzi ezanga misisa pona kolalisa Kongo mpongi tango bango na molili bazali kokokisa mokano na bango ya koyiba eteni ndambo ya mboka na biso.

Soki basalisi lisanga pona bana ya Kivu, esengeli mpe basalisa lisanga pona bana ya Kongo mobimba po ete biso nionso tozali na makambo oyo tosepelaka na yango te na egumba na biso. Soki biso nionso tosimbi mandoki te, elobi te ete tozali na mamena te.

Ba Ne-Kongo esengeli bazala liloba moko po  ete batelemela bakambi ya mboka pona likonzi ya bana ya Kongo ya kati pe ya Congo mobimba. Mateya ya ba Mfumu na biso, ba Mvuluzi na biso, pe tobosani te mateya ya Bundu-dia-Kongo esengeli ekabolama na bana nionso ya Kongo pote moko na moko amiyeba pe amitiya lokumu  na ye pe ntalo na ye ya solo.

Tozali kosenga na Ne-Kongo nionso atelema esika azali pe apusa mosika na ye etamboli nionso na nzela ya lokoso ya falanga oyo bakambi ya ekolo bazali koyiba pe kokabola na babomi mboka, baboya kosalela banguna ya ba nkoko na biso oyo babomela biso bato lokola ba Kimpa Mvita, Mfumu Kimbangu, PE Lumumba, P Mulele pe basusu ebele bakenda pe bazali kokenda kaka ti na tango tozolobela lisolo oyo.

Na ngonga oyo BUNDU-DIA-KONGO nde azali komema etumba ya kotelemisa Kongo na biso, na yango esengeli totiela ye maboko po azala muana etike te. Ne-Kongo nionso asengeli apesa maboko na etumba ya kosikola mboka pe asalisa bakambi ya Bundu-dia-Kongo pe baye balandaka malongi na bango pote balekaka bango mbeka te lokola basoso to pe ba ntaba kaka boye, ba Ne-Kongo misusu bazotala lokola ezali likambo etali bango te. Lelo soki Bundu-dia-Kongo elongi, ekozala bolongi ya BDK ye moko te, kasi bolongi ya Kongo mobimba pe ya RDC mobimba.

Publicité
Commentaires
P
salut,<br /> je me presente aupres de votre houte personnalite,pour m'informe apropos de ceci;quell est votre position au sein de la republique?vous lutte pour quoi?<br /> pedro
Publicité
Vova dia Kongo
Publicité