Canalblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
Publicité
Vova dia Kongo
11 octobre 2008

FARDC ligablo ya CNDP

Fardc_DebandadeEkomi na yango habitude ya ba FARDC, MBULA NIONSO kaka BAKABAKA MINDUKI NA MASASI NA BA SODA YA NKUNDA. Kobanda Joseph Kabila avotama President ya Congo, mbula nionso akabelaka Nkunda minduki na masasi.

Tomekaki kokumisa bango, tolembi te kotia bango maboko, kasi neti kaka tolobelaki bango, ezala te ke basala biso ba filime lokola bamesana. Tosuki wapi? Tala bango wana lisusu babandi kopakata mbangu pe basundoli lisusu mandoki pe masasi na bileyi na maboko ya banguna. Kaka neti basalaka na 2006 pe lisusu na 2007.

FARDC Ekomi na yango kaka lokola ligablo ya CNDP. Soki masasi esili bango baye na bombangu kozua oyo FARDC abombelaka bango. Tala ndenge biso bana ya RDC tosambwe.

Kabila alobi na peuple basangana sima ya basoda pe baponami ya ekolo pona kolonga Nkunda. Azali kobosana ete bana ya mboka basi basangana kaka pona Nkunda te kasi pona ye pe alongwa lokola, mpo ete ye moko Kabila pe azali kosala mosala na ye malamu te. kobanda abandaki kopesa bana ya mboka elikya ete akosilisa bitumba wana , ELOKO NINI ASI ASALI? KAKA KOKABELA BANGO MINDUKI?

QUE LES INCOMPETENTS AIENT LE COURAGE POLITIQUE DE CEDER LA PLACE A CEUX QUI SONT MIEUX OUTILLES.
3 MOIS DE FORMATION EN CHINE N'ONT PAS ETE SUFFISANTS POUR TRANSFORMER LE POLTRON DE PUETO EN GENERAL-MAJOR ET CAPABLE DE SUPERVISER DES VRAIES OPERATIONS MILITAIRES.

WAPI BA OFFICIERS BREVETES YA ETAT-MAJOR OYO BAZALAKI NA FAZ? BOBENGA BANGO BOTIKA KOYOKA SONI.

Publicité
Commentaires
Publicité
Vova dia Kongo
Publicité