Canalblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
Publicité
Vova dia Kongo
1 octobre 2008

Ba FARDC bazolonga; kasi nini lisusu?

FARDCAfrique en Ligne akomi nkoma oyo pona koloba ete ba soda ya nkita na biso bazali kolonga etumba kuna na Kivu pe basili kotiya banguna na mikakatano. General Kayembe alobi ete akoki kosala bango (CNDP) pasi na ngonga nionso pe esika nionso bango babatami po basili kokoma na bokuse ya molayo ya mandoki ya bingambi ya FARDC.

Kasi nazali komituna pona nini kosilisa etumba yango te? Pona nini General Kayembe azali lisusu kosenga masolo na Nkundabatuare? Soki ya solo tozali kolonga, malamu tokanga moto oyo asili kobomisa ba millions ya bana, basi pe ba ndeko na biso pe kotiya ye na boloko. Pona nini kosenga ye aya tosolola? Ye asi aboyaki Amani, asi aboya koyingela na FARDC, pona nini tozali kaka kobondela ye?

Na esika wana bakonzi ya FARDC balakisa mua mayele na bango pe bakumba etumba ti na suka. Bayeba kaka ndenge nini bakoki kobatela ba civils, ezala ba civils na biso to pe bampaya oyo bazali bisika wana pe balandisa mandoki kaka na babundi etumba to pe basoda ya Kundabatuare.

Ezala te lokola ba mbula oyo eleka oyo tomona FARDC alongi, pe na sima akitisi maboko pe Nkundabatuare amatisi mapeka pe azongeli yahouli. Bino bakonzi boyeba ete ba soda oyo ya biso basili kotangisa makila pona ekolo ezali pona bino bokendaka kosolola na ba oyo babomi bango te po bobatelaka bango. Bolakisa kimobali na bino. Ya mbala oyo bokanga nde moto oyo wana ya matoyi mangongi pe likambo yango esila. Soki bozui ye, na tina pe ya kolekisa tango na ba AMANI ya tshanana ekozala te.

Wana nde General Kayembe okoki koloba ete ozali na controle ya Kivu. Soki te, ozali na yo kaka kosala theatre pe kotangisa makila ya bana mboka pona lokumu ya bampaya.

http://www.afriquenligne.fr/dr-congo-army-claims-control-of-kivu-province-2008100113147.html

Publicité
Commentaires
Publicité
Vova dia Kongo
Publicité